








Kacou Philippe abotami na décembre 1972 na Katadji na kati ya département ya Sikensi (Côte-d’ivoire). Azali mwana ya mosali - bilanga oyo atangi te. Nsima ya kelasi ya Ebandeli (Écoleprimaire), Kacou Philippe asali kaka kelasi minei ya lycée (2e sécondaire). Banda 1992 kino 2002, alekisi tango naye mingi mpona kosala lokola mosalisi bipayi ya kotonga bandako.
Nyoso ebandaki na vision moko oyo azwi le 24 Avril 1993. Yambo, ezali epayi ya sango catholiquende akeyi mpona kososola ndimbola ya vision, Nsima, akeyi epayi ya babaptistes bato oyo elongo alekisi sanza misatu mpe nsima akutani na mouvement ya William Branham, mopanzi sango ya mboka ya america. Ezali na mouvement oyo nde avandi lokola simple fidèle banda 1993 kino 2002.
Kacou Philippe abandi mateya naye polele na juillet 2002, nsima ya visitation ya mibale ya Anjeluoyo ya 1993. Alobi ete azali Mosakoli-Motindami ya Cri de minuit, kokokana na Matthieu 25:6.
Mpona Kacou Philippe, mangomba nyoso bizali kosalela zabolo na nkombo ya Yezu-klisto. Azalikoloba mbala ebele na ntima ya limoni mosusu oyo azwi na 1993 mpe na kati na yango alobi eteamoni bakambi ya mangomba na ndenge ya kokamwa: « Nzoto na bango ezalaki nzoto ya batu kasimotu na bango ezalaki motu ya banyama ekeseni ». Nsima debats mpe confrontations ya libosoefungwami.
Kacou Philippe azali koteya ba-mystères ebele, lokola: « Soki Nzambe abebisi likambo ya mabenyoso na mpela na tango ya Noé, ndenge nini mabe ezali lisusu na mokili nsima ya mpela ? » Mpemateya oyo ezalaki publié na mobimba na kati ya Journal moko ya mboka ya cameroun. KacouPhilippe alobi ete maloba naye ezali na ntima moko na maloba ya basakoli ya Bibiliya.
Mpona Kacou Philippe, Eglise ebandi na Jean-baptiste mpe ezalaki libatisi ya repentance. Mpe nsimaeyeyi libatisi ya bolimbisi ya masumu na bantoma. Mpe nsima libatisi ya justification na kondima naMartin Luther, mpe nsima libatisi ya renaissance ya église nsima ya konyokwama ya yambo ya roma, mpe nsima libatisi ya adoption, mpe nsima libatisi ya régénération na pentecôtisme, mpe nsima libatisiya restauration na William Branham mpe mpona kosukisa libatisi ya restitution na Kacou Philippe. Mpe azali koloba ete libanda na yango, mabatisi mosusu nyoso ezali ya mabe, ata esalemi na nkomboya Yezu-klisto to na nkombo ya tata, ya mwana to ya molimo motasu na immersion.
Kacou Philippe atali Bibiliya lokola rétroviseur ya mutuka to buku ya lisolo. Mpona ye, Bibiliya ezalibitika ya lisolo ya kala ya boklisto mpe ya bayuda mpe ekoki te ata na ndenge moko kopesa bomoi ya seko. Azali kotumba ba-versions nyoso ya Bibiliya oyo akuti mabe mpona bondimi ndakisa ya Tob, King James, Tompson, Scofield mpe Louis Segond. Kacou Philippe alimboli sika liloba ya Nzambe(bosolo emonisami) mpe théologie (boyebi ezwami na nzela ya mayele). Alimboli lisusu bonzambe ya Yezu-Klisto, Kotubela masumu oyo esengeli ezala polele na lisanga. Esika ya mwasi na Eklezia, libatisi ya mayi, Molimo mosatu, Mosakoli, Bibiliya, Boyokani kati ya Eklezia na Leta mpe ba-aspects mosusu ebele ya Boklisto. Na oyo etali yango, aboyi koyanola convocation yaRenseignements Généraux ya Côte-d’ivoire. Alimboli sika Boklisto mobimba na kati ya makomimoko ebiangami Buku ya Mosakoli Kacou Philippe, ebimi na volumes misatu na ndako ya kobimisabuku Édilivre na France… Tala Journal : Le Jour Plus No3399 ya 15 Avril 2016 mpe Journal Le Sursaut No ya 15 Avril 2016.
Na mars 2008, Kacou Philippe asangisi bakambi ya mangomba nyoso mpe ba journalistes mpe société civile na kati ya conférence moko likolo ya Boklisto. Ezali lisambisi ya kotelemela Biklezia. Journal moko ebengi ye lokola nkolo ya liloba. Ezali nsima ya conférence oyo nde journal mosusuebimi : Mosakoli moko azali komonisa bolumbu ya batu ya Nzambe. Koloka William Branham, Kacou Philippe azali kobika oyo eleki bomoto oyo azali ko-attribuer na Anjelu ya 24 Avril 1993.
Na 2008, Mateya ya Mosakoli Kacou Philippe ebandaki kobongolama na balokota to munoko mosusu. Ba journaux epanzi mobimba mateya naye; ata libanda ya Côte-d’ivoire. Journal moko emonisi na co-une : Kacou Philippe, Mosakoli oyo ayeyi mpona ko-reformer boklisto. Na ba médias lokola AfricaNo1, ba-debats efungwami. Batu mosusu bayanoli na ndenge ya kobombama, Nzokande basusu basalina ndenge ya polele mpe ya makasi. Basusu lisusu bakeyi mosika, kotanga mateya ya Kacou Philippe moko na moko mpona kobebisa yango malamu.
Le 13 mai 2016, Mosakoli Kacou Philippe akangamaki wuta ndako naye na bakonzi ya Côte-d’ivoirempona botelemeli na bokonzi ya Leta, kopusa boyini ya mangomba mpe radicalisme réligieux. AlekisiMoyi minei mpe butu minei na kovanda na kiti ya locaux ya renseignement généraux ya Côte d’ivoire.Mpe nsima, akolekisa moyi mibale mpe butu mibale na nse ya mabele ya préfecture ya polisi ya Abidjan mpe sanza misatu na boloko monene ya Abidjan liboso bafungula ye na butu ya 16 Août2016 na kopesika ye na ba droits civiques naye, lokola kopesika ye koteya sango malamu na kati ya mbula mitano. Presse ya togo mpe ya cameroun babengi lisambisi yango ya molili. Mpe Nsima, bakambi ya mangomba ya Côte-d’ivoire bakoyeba ete bango nde batu basali ete bakanga ye mpebatiya ye na boloko.
Mpona Kacou Philippe, mosala na ye ya mosakoli ezali na ba phases to ba identités mibale ya minene. Eteni ya yambo ezali lokola libula azwaki epai ya tata na ye, William Marrion Branham, oyo ezalikokokisama ya Matthieu 25:6 mpe esangisi bimoniseli nyonso oyo ezali wuta chapitre 1 kino chapitre154 ya buku na ye oyo ebengami Buku ya Mosakoli Kacou Philippe. Mpe Eteni ya mibale oyo ezalibisakweli, bandoto, mpe bimonaneli, esangisi bimoniseli nyonso oyo ezali wuta chapitre 155 kinochapitre 162 ya buku na ye. Mpe kobanda na chapitre 163 kino na motango moko oyo eyebani te mpona ntango oyo, oyo ekozala lisanga ya matatoli ya kobikisa mpe makamwisi oyo ekondimisaministère na ye na nzela ya ba services ebele ya guérison na ba mboka ndenge na ndenge na mokilimobimba, oyo ekosuka na kokokisama ya emonaneli ya stade monene oyo amonaki na 1993.
Engebene Kacou Philippe, bandoto mpe bimonaneli ezali monoko mosantu kati na banzambe mpebato, ata mpe Nzambe oyo aleki likoló. Akokanisi bandoto mpe bimonaneli na ba codes ya nzela mpebilembo ya nzela na mobembo ya bato epai ya Nzambe; yango wana, kozanga kotalela ndɔtɔ toemonaneli ezali kotyola Nzambe oyo azali kolobela yo. Na yango, engebene ye, likambo oyo esengelikolobelama na ba églises mpe ba religions nyonso na mokili mobimba mpona komonisa ntina ya bandoto mpe bimonaneli epai na bandimi. Kasi, ndimbola ya bandoto mpe bimonaneli esengelikosalema na mayele mpe na bokebi mingi na mokambi nyonso ya lingomba, mpamba te ezali na nzelaya likabo ya Nzambe nde esengeli yango esalema.
Kacou Philippe amonaki na mokolo ya 5 juin 2022 na emonaneli moko, anzelu moko apesaki ye carnet bleu moko mpe apesaki ye mitindo ete akende na Afrique du Sud. Na ntango oyo etyamaki, asosolaki ete carnet bleu yango ezalaki passeport mpe ete nsima ya mibu koleka 20 ya mosala kozangakolongwa na Côte d’Ivoire, Nzambe azalaki sikawa kotinda ye asala ba voyages missionnaires. Asengelaki kokende liboso na Afrique du Sud mpona kozwa likabo ya kobikisa oyo William Branhamatikaki. Na nzela ya bandoto mpe bimonaneli mingi, asosolaki ete asengeli kobongisa ba services de guérison ya miracles ya ofele. Na 2021, anjelu moko apesaki ye malako ete azwa ata moke te mbongoto makabo ya biloko oyo ewuti na moto moko, mpona ntina nyonso, na boumeli ya ba services de guérison naye. Abandaki ba services de guérison na ye ya yambo na Afrique du Sud na sanza ya Mars2025 na bingumba mingi lokola Johannesburg, Pretoria, Middelburg, mpe Zebediela, mpe na sanza ya Avril 2025 na Zimbabwe nsima ya kokutana na mwa mikakatano mike mpona kozwa visa. Ba servicesde guérison na Zimbabwe esalemaki na bingumba ya Harare mpe Bulawayo kobanda mokolo ya 16 kino mokolo ya 21 Avril 2025. Engebene matatoli mingi, bato mingi ya maladi, bakufi miso, baparalitiques, bibɔsɔnɔ, batu ya sida, mpe bakufi-matoi, babikisamaki mbala moko to mikolo nsima. Ba presses ebele ya Afrique du Sud, Zimbabwe, ya côte d’ivoire, Bénin, Cameroun, mpe centrafrique, mpe ba journaux minene lokola Heraldmpe Chronicle, elobelaki na ntina ya mibembo ya MosakoliKacou Philippe na Afrique du Sud mpe na Zimbabwe. Engebene na Kacou Philippe, voyagemissionnaire naye na Afrique Sud mpe na nsima na Zimbabwe, lokola mpe makamwisi oyo asalaki, ekokani na oyo ya William Branham na 1951. Bokokani wana na makamwisi ekokaki kondimisamana kotanga to koyoka ba chapitres 163 mpe 164 ya buku ya Mosakoli Kacou Philippe mpe buku ya batemoignages officiels William Branham, Mosakoli moko oyo atali Afrique Sud ya Julius Stadsklev. Bokokani oyo elingaki komema na bosukisi ete anjelu ya ebale Ohio azali anjelu moko oyo azalielongo na Mosakoli Kacou Philippe. Sima ya Zimbabwe, Kacou Philippe asengelaki kokende naGabon na juin 2025, kasi gouvernement ya Gabon eboyaki ye visa mpona bonguna ya bakambi ya mangomba na ba services de guérison ya ofele ya mosakoli Kacou Philippe na bantina ndenge nandenge, kasi mingimingi na ndenge ba services ya guérison wana ezalaki mobimba ya ofele, na botosimakasi malako oyo anjelu moko na emonaneli moko na 2021. Yango esalaki ete bálongola programmena ye na Gabon mpe ba programes na ye na ba pays mosusu lokola Bénin, Togo, Cameroun, Congo-Brazzaville, mpe Congo-Kinshasa.
Ebongolami uta na https://plus.wikimonde.com/wiki/Kacou_Philippe
(Eteyami mokolo ya lomingo 18 août 2002 na Locodjro, Abidjan Côte d’Ivoire)
(Eteyami mokolo ya lomingo 10 novembre 2002, na Locodjro, Abidjan - Côte d’Ivoire)
(Eteyami mokolo ya lomingo 10 novembre 2002 na Locodjro, Abidjan-Côte d’Ivoire)
(Eteyami mokolo ya lomingo na tongo ya 15 décembre 2002 na Locodjro, Abidjan-Côte d’Ivoire)
(Eteyami mokolo ya lomingo na tongo ya 22 décembre 2002 na Locodjro Abdijan Côte D’ivoire)
(Eteyami mokola ya lomingo na ntongo ya 02 novembre 2003 na Locodjro Abidjan-Côte d’Ivoire)
(Étéyami mokolo ya lomingo na tongo ya 12 Janvier 2003, na locodjro Abidjan. Côte d'Ivoire)
(Étéyami mokolo ya Lomingo na tongo ya 04 Mai 2003 na Locodjro Abidjan Cote d'Ivoire.)
(Eteyami mokolo ya lomingo na ntongo ya 23 février 2003 na Locodjro, Abidjan – Côte d’Ivoire)
(Eteyami dimanche na ntɔngɔ ya 01 Decembre 2002 na Locodjro, Abidjan – Côte d’Ivoire)
(Eteyami dimanche na ntongo 27 avril 2003, na sima na 2006 na Locodjro Abidjan – Côte d’Ivoire)